Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 9:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tango akomaki, akutaki bakonzi ya mampinga bavandi kati na lisanga. Alobaki : — Nazali na sango mpo na yo mokonzi. Jewu atunaki : — Mpo na nani kati na biso ? Mosakoli azongisaki : — Mpo na yo mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 9:5
4 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango okokoma kuna, luka Jewu, mwana mobali ya Jozafati mpe koko ya Nimishi. Kende epai na ye, benda ye pembeni, mosika ya baninga na ye, mpe mema ye na shambre ya kati.


Boye elenge mobali, mosakoli, akendeki na Ramoti ya Galadi.


Jewu atelemaki mpe akotaki na ndako. Bongo mosakoli apakolaki mafuta na moto ya Jewu mpe alobaki : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe. ›


Kasi tango akomaki na esika ya banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga, pembeni ya Giligali, azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Mokonzi, nazali na sango ya sekele mpo na yo. Mokonzi azongisaki : — Kimia ! Mpe bato nyonso oyo bazalaki pembeni na ye babimaki libanda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ