Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 9:36 - Mokanda na Bomoi

36 Bazongaki mpe bayebisaki Jewu : « Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya, moto ya mboka Tishibe : ‹ Bambwa ekolia nzoto ya Jezabeli kati na elanga ya Jizireyeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 9:36
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye.


Tala lisusu makambo oyo Yawe alobi na tina na Jezabeli : « Bambwa ekolia Jezabeli pene ya mir ya Jizireyeli.


Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi.


Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi.


Boye nde Liloba oyo Yawe alobaki na Jewu ekokisamaki : « Bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »


Nzokande mpo na Jezabeli, bambwa ekolia ye kati na bilanga ya Jizireyeli, mpe moto moko te akokunda ye. » Boye mosakoli afungolaki ekuke mpe akimaki.


Kasi tango babimaki mpo na kokunda ye, bakutaki kaka mokuwa ya moto na ye, makolo mpe matandu ya maboko na ye.


Aron mpe bana na ye ya mibali basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ