Bazongaki mpe bayebisaki Jewu : « Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya, moto ya mboka Tishibe : ‹ Bambwa ekolia nzoto ya Jezabeli kati na elanga ya Jizireyeli.
Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ;
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : Ekozala na mokitani na ye moko te oyo akokitana na ye na kiti ya bokonzi ya Davidi ; ebembe na ye ekobwakama na libanda, mpe bakotanda yango na molunge ya moyi mpe na malili ya butu.