Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 9:34 - Mokanda na Bomoi

34 Jewu akotaki, aliaki, amelaki mpe alobaki : « Bobongisa mwasi oyo alakelama mabe. Bokunda ye, pamba te azali mwana mwasi ya mokonzi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 9:34
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango.


Eliya alobaki na Akabi : — Kende, lia mpe mela, pamba te nazali koyoka makelele ya mvula makasi.


Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe.


Jewu apesaki bango mitindo : — Bobwaka ye na se. Bongo babwakaki Jezabeli na se ; mpe makila na ye epanzanaki na mir mpe na bampunda tango ezalaki konyata ye.


Kasi tango babimaki mpo na kokunda ye, bakutaki kaka mokuwa ya moto na ye, makolo mpe matandu ya maboko na ye.


Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.


Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli, kasi bakobosana kombo ya moto mabe.


Bokotika kombo na bino epai ya baponami na Ngai lokola lisuma ; Nkolo Yawe akoboma bino ; kasi epai ya baponami na Ye, akopesa kombo mosusu.


Bozali kolala na bambeto oyo batia pembe ya nzoko, bozali komivandisa na bakiti ya divan ya kitoko, bozali kolia misuni ya bameme ya kitoko kati na bibwele mpe ya bana ngombe ya mibali ya mafuta kati na etonga.


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ