Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 9:33 - Mokanda na Bomoi

33 Jewu apesaki bango mitindo : — Bobwaka ye na se. Bongo babwakaki Jezabeli na se ; mpe makila na ye epanzanaki na mir mpe na bampunda tango ezalaki konyata ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 9:33
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti batosaki mitindo oyo Jezabeli apesaki bango na nzela na mikanda.


Makambo yango esalemaki ndenge kaka elobamaki na tina na ye : bato banyataki ye na ekuke ya engumba, mpe akufaki.


‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.


Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki : — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ? Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa.


Jewu akotaki, aliaki, amelaki mpe alobaki : « Bobongisa mwasi oyo alakelama mabe. Bokunda ye, pamba te azali mwana mwasi ya mokonzi. »


Loboko na Yawe ekozala na ngomba oyo, kasi bakonyata-nyata Moabi na mokili na bango ndenge banyataka matiti kati na libulu ya fimie.


Makolo ya bato ekonyata-nyata yango : makolo ya babola, matambe ya bato pamba.


Yawe asundoli bilombe nyonso ya bitumba oyo bazalaki na milongo na ngai ; abengi mampinga ya bapaya mpo ete baya koboma bilenge mibali na ngai. Nkolo akamoli Yuda, mboka kitoko, na ekamolelo na Ye ya vino.


Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai : « Wapi Yawe, Nzambe na yo ? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.


Bango nyonso bakokoma lokola bilombe ya bitumba, oyo bakangamaka te na potopoto ya babalabala na tango ya bitumba. Lokola Yawe azali elongo na bango, bakobunda mpe bakolonga, ata basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda.


Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Ezali lisusu na tina moko te ; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.


ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ