Mokolo moko, Akabi alobaki na Naboti : — Pesa ngai elanga na yo ya vino mpo ete nakomisa yango elanga na ngai ya ndunda, pamba te ezali pene ya ndako na ngai ; mpe ngai nakopesa yo elanga mosusu ya vino oyo eleki kitoko na esika ya elanga na yo ; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango.