2 Tango okokoma kuna, luka Jewu, mwana mobali ya Jozafati mpe koko ya Nimishi. Kende epai na ye, benda ye pembeni, mosika ya baninga na ye, mpe mema ye na shambre ya kati.
Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo. Beni-Adadi akimaki na engumba mpe abombamaki na shambre ya kati penza.
Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye : — Boni, makambo nyonso ezali malamu ? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo ? Jewu azongisaki : — Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka.
Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri.
Tango akomaki, akutaki bakonzi ya mampinga bavandi kati na lisanga. Alobaki : — Nazali na sango mpo na yo mokonzi. Jewu atunaki : — Mpo na nani kati na biso ? Mosakoli azongisaki : — Mpo na yo mokonzi.