Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 9:19 - Mokanda na Bomoi

19 Boye mokonzi atindaki soda mosusu oyo abundaka likolo ya mpunda. Tango akomaki epai na bango, alobaki : — Boni, boyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 9:19
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye : — Boni, makambo nyonso ezali malamu ? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo ? Jewu azongisaki : — Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka.


Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki : « Nazali komona mampinga, bazali koya ! » Yorami apesaki mitindo : — Bopona soda moko oyo abundaka likolo ya mpunda mpe botinda ye mpo ete akende kokutana na bango mpe atuna bango : « Boni, boyei mpo na kimia ? »


Soda oyo abundaka likolo ya mpunda akendeki mpe atunaki : — Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Boni, boyei mpo na kimia ? » Jewu azongisaki : — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai. Mokengeli alobaki : — Motindami akomi epai na bango, kasi azali kozonga te.


Mokengeli alobaki : — Motindami akomi penza epai na bango, kasi ye mpe azali kozonga te. Nzokande, lolenge oyo ya kotambolisa ezali lokola ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo atambolisaka lokola moto ya liboma.


Kasi Yawe alobaki : « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ