Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 9:18 - Mokanda na Bomoi

18 Soda oyo abundaka likolo ya mpunda akendeki mpe atunaki : — Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Boni, boyei mpo na kimia ? » Jewu azongisaki : — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai. Mokengeli alobaki : — Motindami akomi epai na bango, kasi azali kozonga te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 9:18
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki : « Nazali komona mampinga, bazali koya ! » Yorami apesaki mitindo : — Bopona soda moko oyo abundaka likolo ya mpunda mpe botinda ye mpo ete akende kokutana na bango mpe atuna bango : « Boni, boyei mpo na kimia ? »


Boye mokonzi atindaki soda mosusu oyo abundaka likolo ya mpunda. Tango akomaki epai na bango, alobaki : — Boni, boyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai.


Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye : — Boni Jewu, oyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ?


Tango Jewu akotaki na ekuke ya engumba, Jezabeli atunaki na koganga : — Zimiri, mobomi ya nkolo na yo, boni, oyei mpo na kimia ?


Kasi Yawe alobaki : « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »


Bayebi nzela ya kimia te, mpe bosembo ezali na nzela na bango te ; bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka, moko te oyo akotambola na nzela yango akotikala koyeba kimia.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Kokota na ndako oyo ezali na matanga te, kokende na matanga te mpe koyokela bato oyo bazali na matanga mawa te, pamba te nalongoli kimia na Ngai, bolingo na Ngai mpe mawa na Ngai epai ya bato oyo, » elobi Yawe,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ