Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 9:17 - Mokanda na Bomoi

17 Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki : « Nazali komona mampinga, bazali koya ! » Yorami apesaki mitindo : — Bopona soda moko oyo abundaka likolo ya mpunda mpe botinda ye mpo ete akende kokutana na bango mpe atuna bango : « Boni, boyei mpo na kimia ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 9:17
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi : « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. »


Na tango yango, Davidi avandaki kati ya ekuke ya kati mpe ekuke ya libanda, mpe mokengeli amataki na likolo ya ndako ya ekuke, pembeni ya mir. Tango atombolaki miso, amonaki mwana mobali moko kokima mbangu ye moko.


Adoniya alobaki : — Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai ; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe.


Boye baponaki bashar mibale elongo na bampunda na yango, mpe mokonzi atindaki yango mpo na koluka mampinga ya bato ya Siri. Apesaki mitindo na batambolisi na yango : « Bokende mpe botala ! »


Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye : — Boni, makambo nyonso ezali malamu ? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo ? Jewu azongisaki : — Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka.


Boye Jewu amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli mpo ete Yorami azalaki kopema kuna ; mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala ye.


Soda oyo abundaka likolo ya mpunda akendeki mpe atunaki : — Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Boni, boyei mpo na kimia ? » Jewu azongisaki : — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai. Mokengeli alobaki : — Motindami akomi epai na bango, kasi azali kozonga te.


Boye mokonzi atindaki soda mosusu oyo abundaka likolo ya mpunda. Tango akomaki epai na bango, alobaki : — Boni, boyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai.


Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso, bango nyonso bazangi mayele ; bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te, bakokaka koganga te, mosala na bango kolala mpe kolota bandoto, balingi pongi makasi.


Oh Yelusalemi, natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ; bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu. Bino bato oyo bosalaka ete Yawe akanisa lisusu Yelusalemi, bovanda kimia te ;


Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye : — Boni, koya na yo ezali ya kimia ?


Davidi akitisaki mikumba na ye, apesaki yango na maboko ya mobateli mikumba, akimaki mbangu na esika ya bitumba mpe apesaki bandeko na ye ya mibali mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ