Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki : « Nazali komona mampinga, bazali koya ! » Yorami apesaki mitindo : — Bopona soda moko oyo abundaka likolo ya mpunda mpe botinda ye mpo ete akende kokutana na bango mpe atuna bango : « Boni, boyei mpo na kimia ? »