Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 9:13 - Mokanda na Bomoi

13 Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 9:13
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe longwa kuna, Abisalomi atindaki bantoma kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo na koloba : « Tango kaka bokoyoka lokito ya kelelo, boloba : ‹ Abisalomi akomi mokonzi kati na Ebron. › »


Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme ; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari ; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba : « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi ! »


Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »


Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi ; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : « Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! »


Bakonzi ya basoda balobaki : — Ezali ya solo te, ozali kokosa biso ! Yebisa biso makambo yango. Jewu alobaki : — Boyoka ndenge alobi na ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napakoli yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › »


Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi, na lokito ya bakelelo mpe ya maseke.


Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ