2 Bakonzi 9:11 - Mokanda na Bomoi11 Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye : — Boni, makambo nyonso ezali malamu ? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo ? Jewu azongisaki : — Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki : « Nazali komona mampinga, bazali koya ! » Yorami apesaki mitindo : — Bopona soda moko oyo abundaka likolo ya mpunda mpe botinda ye mpo ete akende kokutana na bango mpe atuna bango : « Boni, boyei mpo na kimia ? »
Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki : — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini ? Bamosusu balobaki : — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya ! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.