2 Bakonzi 8:9 - Mokanda na Bomoi9 Azaeli akendeki kokutana na Elize, amemaki elongo na ye likabo ya biloko nyonso ya Damasi ; bamemaki yango na likolo ya bashamo tuku minei. Azaeli akitaki, atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Mwana na yo ya mobali Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, atindi ngai ; atuni : « Boni, nakobika solo na bokono oyo ? » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; apesaki yango na maboko ya basali na ye mpe atindaki bango epai ya Beni-Adadi, mwana mobali ya Tabirimoni, mwana mobali ya Ezioni, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo :