Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 8:8 - Mokanda na Bomoi

8 mokonzi alobaki na Azaeli : « Kamata likabo mpe kende kokutana na moto na Nzambe. Tuna Yawe na nzela ya moto na Nzambe : ‹ Boni, nakobika solo na bokono oyo ? › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 8:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ye : — Zonga na nzela oyo oyelaki mpe kende na esobe ya Damasi. Tango okokoma kuna, okopakola Azaeli mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Siri.


Moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Azaeli, Jewu akoboma ye ; mpe moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Jewu, Elize akoboma ye.


Alobaki na mokonzi : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »


Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango : — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.


Bazongisaki : — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso : « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele ; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali ; okokufa solo. »


Mokonzi ya Siri alobaki na ye : — Malamu ! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano ; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo.


Moto moko atunaki Ye : — Nkolo, bato moke kaka nde bakobika ? Yesu alobaki na bango :


Bongo abimisaki bango libanda mpe atunaki bango : — Batata, nasala nini mpo ete nabika ?


Saulo alobaki na mosali na ye : — Likambo te ! Tokende epai na ye ! Kasi tokopesa eloko nini epai ya moto na Nzambe ? Pamba te kati na libenga na biso, biloko ya kolia ezali lisusu te ; tozali ata na kado te ya kopesa epai ya moto na Nzambe. Tozali na eloko nini ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ