2 Bakonzi 8:7 - Mokanda na Bomoi7 Elize akendeki na Damasi, wana Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, azalaki kobela. Tango bayebisaki mokonzi ete moto na Nzambe akomi kati na engumba, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; apesaki yango na maboko ya basali na ye mpe atindaki bango epai ya Beni-Adadi, mwana mobali ya Tabirimoni, mwana mobali ya Ezioni, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo :
Beni-Adadi alobaki : — Bingumba nyonso oyo tata na ngai abotolaki tata na yo, nazongiseli yo yango ; okotonga zando na yo na Damasi mpo na koteka biloko na yo ndenge kaka tata na ngai asalaki na Samari. Akabi azongisaki : — Nakotika yo kokende soki nasali boyokani elongo na yo. Akabi asalaki boyokani elongo na Beni-Adadi mpe atikaki ye kozonga epai na ye.
Lokola Jeremi azalaki kowumela kopesa eyano, Nebuzaradani abakisaki : — Zonga epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisi moyangeli ya bingumba ya Yuda, mpe vanda epai na ye kati na bato na yo to kende esika nyonso olingi. Bongo mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki ye bilei mpe bakado, mpe atikaki ye kokende.