Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 8:6 - Mokanda na Bomoi

6 Mokonzi atunaki na mwasi yango mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Na sima, mokonzi aponaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe apesaki ye mitindo : « Zongisela ye biloko na ye nyonso mpe bambuma nyonso ya bilanga oyo mabele na ye ebotaki wuta mokolo oyo alongwaki na mboka na biso kino lelo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 8:6
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.


Davidi alobaki na ye : — Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.


Wana Geazi azalaki koyebisa mokonzi ndenge nini Elize asekwisaki ebembe ya mwana oyo akufaki, mama ya mwana yango ayaki kobondela mokonzi ete azongisa ndako mpe mabele na ye. Geazi alobaki : « Mokonzi, nkolo na ngai, tala mwasi oyo mpe mwana na ye ya mobali oyo Elize asekwisaki. »


Elize akendeki na Damasi, wana Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, azalaki kobela. Tango bayebisaki mokonzi ete moto na Nzambe akomi kati na engumba,


Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki : — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ? Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa.


Davidi abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele, na Yelusalemi : bakonzi ya mabota, bakonzi ya masanga ya basoda oyo bazalaki kosalela mokonzi, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda, babateli bozwi mpe bibwele ya mokonzi, bato oyo balandelaka bana na ye ya mibali elongo na basali ya ndako ya mokonzi, basoda ya mpiko mpe bato nyonso ya lokumu.


Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.


Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.


Soki ndeko yango avandaka pembeni na yo te to oyebi ye te, mema yango na ndako na yo mpe bomba yango kino akoya koluka yango, bongo okozongisela ye yango.


Mokonzi ya bato ya Amoni azongiselaki bantoma ya Jefite : — Ezali mpo ete Isalaele abotolaki mokili na ngai tango abimaki na Ejipito ; babotolaki mokili yango longwa na lubwaku ya Arinoni, mayi moke ya Yaboki kino na lubwaku ya Yordani. Sik’oyo, zongisela ngai yango na kimia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ