2 Bakonzi 8:5 - Mokanda na Bomoi5 Wana Geazi azalaki koyebisa mokonzi ndenge nini Elize asekwisaki ebembe ya mwana oyo akufaki, mama ya mwana yango ayaki kobondela mokonzi ete azongisa ndako mpe mabele na ye. Geazi alobaki : « Mokonzi, nkolo na ngai, tala mwasi oyo mpe mwana na ye ya mobali oyo Elize asekwisaki. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye : — Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda ; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi. Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete.
Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli ; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.