Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 8:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mokonzi azalaki kosolola na Geazi, mosali ya moto na Nzambe, mpe alobaki : « Yebisa ngai makambo minene nyonso oyo moto na Nzambe, Elize, asalaki. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 8:4
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azwaki kazaka ya Eliya, abetaki yango na mayi mpe alobaki : « Wapi sik’oyo Yawe, Nzambe ya Eliya ? » Tango Elize abetaki kazaka yango na mayi, mayi ya ebale ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi.


Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.


Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi : « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize.


Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi : — Tala ! Ezali mwasi ya Sunami !


Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye ; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali.


Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba : « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto ? Bosala keba ! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima ! Boyoka ! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye ? »


Moto na Nzambe atunaki : — Ekweyaki na esika nini ? Sima na ye kolakisa ye esika yango, Elize akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango na esika oyo ebende ya epasola ekweyaki. Mpe, na mbala moko, eteni ya nzete yango ematisaki ebende na likolo ya mayi, mpe ebende ekomaki kotepa.


Elize alobaki : — Boyoka Liloba na Yawe ! Tala makambo oyo Yawe alobi : « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »


Boye bakendeki, babelelaki epai ya bakengeli bikuke ya engumba mpe bayebisaki bango : « Tokotaki na molako ya bato ya Siri, moto ata moko te azali kuna, toyoki ata mongongo ya moto te ; etikali kaka bampunda mpe ba-ane bakanga, mpe bandako ya kapo basundola. »


Na ekuke ya engumba, ezalaki na bato minei na maba. Bazalaki kolobana bango na bango : « Mpo na nini totikala awa kino tokokufa ?


Tango mibu yango sambo ekokaki, mwasi azongaki na mboka na ye wuta na mokili ya Filisitia ; akendeki epai ya mokonzi mpo ete bazongisela ye ndako mpe mabele na ye.


Boye, atindaki bango na Beteleemi ; alobaki : — Bokende koluka malamu mwana yango, na Beteleemi ; tango kaka bokomona ye, boyebisa ngai mpo ete ngai mpe nakende kogumbamela ye.


Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi.


Kasi Erode azalaki komilobela : « Ngai nde nakataki Yoane moto ; bongo moto oyo nazali koyoka makambo minene boye na tina na ye, azali penza nani ? » Boye alukaki kokutana na Yesu.


Azongiselaki bango : — Nasilaki koyebisa bino yango, kasi boyokaki te. Bongo mpo na nini bolingi lisusu koyoka yango ? Boni, bino mpe bolingi kokoma bayekoli na ye ?


Sima na mwa mikolo, Felikisi ayaki elongo na mwasi na ye, Drusiye, oyo azalaki Moyuda ; abengisaki Polo mpe akomaki koyoka ye na tina na makambo oyo etali kondima kati na Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ