Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 8:28 - Mokanda na Bomoi

28 Akazia akendeki elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Bato ya Arami bazokisaki Yorami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 8:28
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Azaeli, Jewu akoboma ye ; mpe moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Jewu, Elize akoboma ye.


Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi.


Beni-Geberi : azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze.


Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda : — Mokonzi ya Moabi atombokeli ngai. Okoki solo kokende elongo na ngai mpo na kobundisa bato ya Moabi ? Mokonzi Jozafati azongisaki : — Nakokende na yo elongo. Ngai na yo tozali kaka moto moko ; bato na ngai bazali kaka bato na yo, bongo bampunda na ngai ezali mpe bampunda na yo.


Mokolo oyo elandaki, Azaeli azwaki bulangeti, azindisaki yango na mayi, mpe afinikaki na yango elongi ya mokonzi mpo na kokanga ye pema ; mpe mokonzi akufaki. Azaeli akitanaki na ye na bokonzi.


Boye, mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli mpo na kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.


Elize abengisaki moko kati na bayekoli ya basakoli mpe alobaki na ye : « Kanga mokaba na yo, zwa molangi oyo ya mafuta mpe kende na Ramoti ya Galadi.


Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri.


Kasi mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na bitumba na Azaeli, mokonzi ya Siri. Jewu alobaki : « Soki yango ezali makanisi na bino, tika ete moto moko te akima mpe abima na engumba mpo na kokende kopesa sango na Jizireyeli. »


Boye Jewu amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli mpo ete Yorami azalaki kopema kuna ; mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala ye.


Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye.


mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, akendeki kokutana na ye. Alobaki na mokonzi Jozafati : « Mpo na nini kosunga moto mabe mpe kolinga bato oyo bayinaka Yawe ? Mpo ete osali bongo, kanda makasi ya Yawe ezali likolo na yo.


Alandaki mpe batoli na bango tango akendeki na bitumba elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Kasi bato ya Arami bazokisaki Yorami.


Na ngambo mosusu ya Yordani, na este ya Jeriko, baponaki Betseri kati na esobe, na likolo ya ngomba ya libota ya Ribeni ; Ramoti kati na Galadi, kati na etuka ya libota ya Gadi ; mpe Golani kati na Bashani, kati na etuka ya libota ya Manase.


Kati na libota ya Gadi : Ramoti, kati na Galadi, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Maanayimi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ