24 Yorami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Sima na yango, Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.
Jeroboami asalaki mibu tuku mibale na mibale na bokonzi, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Nadabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. Abiyami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Jewu akutanaki na bandeko ya Akazia, mokonzi ya kala ya Yuda, mpe atunaki bango : — Bozali banani ? Bazongisaki : — Tozali bandeko ya Akazia. Toyei kopesa bana mibali ya mokonzi mpe mama ya mokonzi mbote.
Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Babundisaki Yuda, bakotaki kati na yango na makasi mpe bamemaki biloko nyonso oyo bamonaki kati na ndako ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali mpe basi na ye ; mwana mobali moko kaka atikalaki : Yoakazi, mwana na ye ya suka.
Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. Akendeki kaka ndenge wana, moto ata moko te ayokaki mawa. Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te.
Nzokande, Yawe alingaki te kobebisa libota ya Davidi, mpo na boyokani oyo Ye moko Yawe asalaki elongo na Davidi, mpe mpo ete alakaki kopesa mpo na libela bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye.
Bato ya Yelusalemi bakomisaki Akazia, mwana mobali ya suka ya Yorami, mokonzi mpo na kokitana na ye, pamba te bato ya mobulu oyo bakotaki na molako elongo na bato ya Arabi babomaki bana mibali nyonso. Ezali boye nde Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
Bongo, Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Azaria, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.
Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Yoakazi, na Beti-Shemeshi. Amemaki ye na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka.