Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.
Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
Ezalaki ye nde moto alongolaki kati na mokili, bato ya suka oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, oyo batikalaki na tango Asa, tata na ye, azalaki na bokonzi.
Ezali Amatsia nde moto alongaki bato ya Edomi, nkoto zomi na Lubwaku ya Mungwa, mpe abotolaki na bitumba engumba ya Sela ; mpe abengaki yango « Yokiteyeli, » kombo oyo babengelaka yango kino lelo.
Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te.
Boye azwaki mwana na ye ya liboso ya mobali oyo alingaki kokitana na ye na bokonzi, abonzaki ye lokola mbeka ya kotumba, na likolo ya mir ya engumba. Tango bamonaki bongo, bana ya Isalaele bayokaki mawa, balongwaki mpe bazongaki na mboka na bango.
Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango.