Elize alobaki na mama ya mwana mobali oyo asekwisaki : « Kende elongo na libota na yo na esika oyo bokoki kovanda, pamba te Yawe abengi nzala makasi kati na mokili oyo ; ekowumela mibu sambo. »
Tango mibu yango sambo ekokaki, mwasi azongaki na mboka na ye wuta na mokili ya Filisitia ; akendeki epai ya mokonzi mpo ete bazongisela ye ndako mpe mabele na ye.
Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.