14 Azaeli atikaki Elize mpe azongaki epai ya mokonzi na ye. Bongo mokonzi na ye atunaki ye : — Elize alobi na yo nini ? Azongisaki : — Alobi na ngai : « Solo, okobika na bokono oyo. »
Mokolo oyo elandaki, Azaeli azwaki bulangeti, azindisaki yango na mayi, mpe afinikaki na yango elongi ya mokonzi mpo na kokanga ye pema ; mpe mokonzi akufaki. Azaeli akitanaki na ye na bokonzi.