13 Azaeli akamwaki mpe azongisaki : — Mpo na nini okosala makambo ya boye na mosali na yo ? Ata kutu mbwa eleki ngai na tina ! Elize alobaki lisusu : — Yawe amonisi ngai ete okokoma mokonzi ya Siri.
Yawe alobaki na ye : — Zonga na nzela oyo oyelaki mpe kende na esobe ya Damasi. Tango okokoma kuna, okopakola Azaeli mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Siri.
Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.
Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.
Moto ya Filisitia alobaki na Davidi : — Boni, ngai nazali mbwa mpo ete oya kobundisa ngai na lingenda ? Bongo alakelaki Davidi mabe na nzela ya banzambe na ye.