Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 8:12 - Mokanda na Bomoi

12 Azaeli atunaki : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? Elize azongisaki : — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 8:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nkolo na ngai, oyokaki te makambo oyo nasalaki tango Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe ? Nabombaki basakoli ya Yawe nkama moko kati na madusu mibale ya mabanga : tuku mitano na lidusu moko na moko mpe napesaki bango bilei mpe mayi ya komela.


Moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Azaeli, Jewu akoboma ye ; mpe moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Jewu, Elize akoboma ye.


Bazalaki komema te na Tempelo ya Yawe, mbongo oyo ewutaki na makabo ya kimia mpe na mbeka mpo na masumu ; yango ezalaki mpo na Banganga-Nzambe.


Na tango wana, Azaeli, mokonzi ya Siri, akendeki kobundisa engumba Gati mpe abotolaki yango. Sima, Azaeli abalukaki mpo na kobundisa Yelusalemi.


Azaeli, mokonzi ya Siri, anyokolaki Isalaele, na tango ya bokonzi ya Yoakazi.


Boye kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe akabaki Isalaele na maboko ya Azaeli, mokonzi ya Siri, mpe ya Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali.


Kati na mampinga nyonso ya Yoakazi, etikalaki kaka na mibali tuku mitano oyo batambolisaka bampunda, bashar zomi, mpe basoda oyo batambolaka na makolo, nkoto zomi, pamba te mokonzi ya Siri abomaki bamosusu oyo batikalaki, mpe akomisaki bango lokola putulu oyo banyataka na makolo.


Na tango wana, Menayeme abundisaki engumba Tifisa, abomaki bato nyonso ya engumba mpe abebisaki zingazinga na yango, kobanda na Tiritsa, pamba te baboyaki kofungolela ye bikuke ya engumba na bango. Abebisaki engumba yango mpe atobolaki mabumu ya basi nyonso ya zemi.


Mwasi ya Sunami alobaki : — Boni, nasengaki mwana epai ya nkolo na ngai ? Te ! Kutu, nalobaki na yo : « Kopesa ngai elikya ya lokuta te ! »


Bakokata-kata bana na bango na biteni na miso na bango, bakobebisa bandako na bango mpe bakozwa basi na bango na makasi.


Boye, tolotolo na bango ekoboma bilenge mibali mpe bakoyokela mbuma ya libumu mawa te : liso na bango ekotala bana na mawa te.


Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo, bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama ; ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribeli na mokolo ya bitumba, tango bamama mpe bana na bango bakweyaki na mabele.


Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu mpo na mabe na bango, pamba te batombokeli Nzambe na bango. Bato bakokufa na mopanga ; bakonyata-nyata babebe na bango, bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Amoni, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bapasolaki mabumu ya basi ya zemi ya Galadi mpo na koyeisa mokili na bango monene.


Nzokande, yango mpe ekweyaki, mpe bamemaki bato na yango na bowumbu. Bakataki-kataki na biteni bana na bango na babalabala nyonso, babetaki zeke mpo na kopona bato na yango ya lokumu mpo ete bamema bango na bowumbu, mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ