Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 8:11 - Mokanda na Bomoi

11 Elize atalaki ye malamu-malamu, mpe Azaeli ayokaki soni. Mpe moto na Nzambe alelaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 8:11
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola alelaki na mongongo makasi, bato ya Ejipito bayokaki ye ; mpe sango ekendeki kino na ndako ya Faraon.


Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.


Kasi batungisaki Elize makasi kino ayokaki soni mpo na koboya. Boye alobaki : — Botinda bango. Mpe batindaki mibali tuku mitano oyo balukaki Eliya mikolo misato, kasi batikalaki komona ye te.


Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.


Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.


Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.


Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh ! Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi, ezali koswa makasi kati na ngai, mpe nazali kokoka kokanga monoko te, pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.


Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !


Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona : ‹ Ah ! Tala ndenge nini tosili kobebisama ! Tala ndenge nini tosambwe ! Tika ete tokima mokili na biso, pamba te bandako na biso ebebisami. › »


Lokola akomaki pene ya Yelusalemi mpe amonaki engumba, alelaki mpo na yango


Nasalelaki Nkolo lokola mowumbu, na komikitisa nyonso mpe na mpinzoli, kati na komekama makasi mpo ete Bayuda bazalaki kosalela ngai makita.


Yango wana, bosenzela ! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moyi, natikaki te kokebisa moko na moko na bino, mpe tango mosusu elongo na mpinzoli.


motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te.


Pamba te ndenge nazalaki koyebisa bino yango mbala na mbala mpe, sik’oyo, nazali lisusu koyebisa bino yango na kolela, bato mingi bazali kotambola lokola banguna ya ekulusu ya Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ