Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 8:10 - Mokanda na Bomoi

10 Elize azongisaki : — Loba na ye : « Solo, okobika na bokono oyo. » Nzokande, Yawe amonisi ngai ete akokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 8:10
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi okolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe ; pamba te mokolo oyo okolia yango, okokufa solo. »


Faraon alobaki na Jozefi : — Lokola Nzambe ayebisi yo makambo oyo nyonso, ezali na moto moko te oyo azali na mayele mpe na bwanya lokola yo.


Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye : — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Mishe azongisaki : — Kende ! Okolonga ! Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi.


Alobaki na mokonzi : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »


Mpo na yango, tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Okokita te na mbeto oyo olali, pamba te, solo, okokufa. › » Boye Eliya akendeki.


Kasi soki oboyi komipesa epai na bango, tala makambo oyo Yawe atalisi ngai :


Bongo nayebisaki bato oyo bazalaki na bowumbu makambo nyonso oyo Yawe alakisaki ngai.


adefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo ; boni, mwana ya lolenge oyo akoki solo kozala na bomoi ? Te, akozala na bomoi te ! Mpo ete asalaki makambo wana nyonso ya mbindo, basengeli koboma ye, mpe makila na ye ekotangama na moto na ye moko !


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : Tango matiti ebandaki kobota, ebimisaki mabanki ebele. Esalemaki sima na kobuka milona ya mokonzi.


Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai. Nkolo Yawe asalelaki moto mpo na kopesa etumbu, bongo moto yango ekawusaki mayi minene mpe ezikisaki mokili.


Tala makambo oyo alakisaki ngai : Nkolo azalaki ya kotelema na likolo ya mir moko batonga na mbodi mpe, na loboko na Ye, asimbaki nivo oyo batongi ndako basalelaka.


Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : kitunga etonda na bambuma etela.


Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ