7 Boye batelemaki mpe bakimaki na pokwa, basundolaki bandako na bango ya kapo, bampunda na bango mpe ba-ane na bango. Batikaki molako ndenge ezalaki mpo na kobikisa bomoi na bango.
Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano ; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri.
Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar.
Na mokolo wana, bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembo banzambe na bango ya bikeko ya palata mpe banzambe na bango ya bikeko ya wolo, oyo basalaki mpo ete bafukamela bango.