Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 7:6 - Mokanda na Bomoi

6 pamba te Nkolo asalaki ete bato ya Siri bayoka lokito ya bashar, ya bampunda mpe ya mampinga minene ya basoda kino balobanaki bango na bango : « Tala, mokonzi ya Isalaele azwi mokonzi ya bato ya Iti mpe mokonzi ya bato ya Ejipito mpo na koya kobundisa biso. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 7:6
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.


Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya Mirie, na tango wana nde okobima noki, pamba te ekolakisa ete Yawe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »


Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano ; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri.


Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar.


Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye ; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › »


Na pokwa, batelemaki mpe bakendeki na molako ya bato ya Siri. Tango bakomaki na mondelo ya molako, bamonaki ata moto moko te,


Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.


Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.


Mawa na bato oyo bazali kokende na Ejipito mpo na koluka lisungi, oyo bazali kotia mitema na bampunda, oyo bazali kotia elikya na bashar mpo ete ezali ebele, mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te mpe balukaka lisungi epai na Yawe te !


Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ?


Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye, bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga. Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko ; bakokoka kolonga te, pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango : ezali tango ya etumbu mpo na bango.


Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, nazalaki koyoka makelele ya mapapu na yango lokola makelele ya bambonge ya ebale monene to lokola mongongo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to lokola lokito ya mampinga. Tango ezalaki kotelema, ezalaki kokitisa mapapu na yango.


Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka.


Tolo na yango ezalaki lokola bibende oyo basoda balataka na tolo, mpe makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola makelele ya bashar oyo bampunda ebele ezali kobenda mpo na etumba.


Wana soda moko na moko ya Isalaele atelemaki na esika na ye zingazinga ya molako, banguna kati na molako bapotaki mbangu, bagangaki mpe bakimaki.


Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso : ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.


Davidi atunaki Ayimeleki, moto ya Iti, mpe Abishayi, mwana mobali ya Tseruya mpe ndeko mobali ya Joabi : — Nani kati na bino akoki kokende elongo na ngai kino na molako epai ya Saulo ? Abishayi azongisaki : — Ngai, nakokende elongo na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ