Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 7:5 - Mokanda na Bomoi

5 Na pokwa, batelemaki mpe bakendeki na molako ya bato ya Siri. Tango bakomaki na mondelo ya molako, bamonaki ata moto moko te,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 7:5
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki tolobi : ‹ Tokota na engumba, › nzala makasi ezali kuna, tokokufa. Soki mpe totikali awa, tokokufa kaka. Boye, tika ete tokende na molako ya bato ya Siri mpe tomipesa epai na bango. Soki bayambi biso, tobiki ; kasi soki babomi biso, tokufi kaka. »


pamba te Nkolo asalaki ete bato ya Siri bayoka lokito ya bashar, ya bampunda mpe ya mampinga minene ya basoda kino balobanaki bango na bango : « Tala, mokonzi ya Isalaele azwi mokonzi ya bato ya Iti mpe mokonzi ya bato ya Ejipito mpo na koya kobundisa biso. »


Mokambi oyo azali kati na bango akotia bisaka na ye na mapeka mpe akokima na butu ; bakotobola mir mpo na kobimisa ye na lidusu oyo bakosala. Akobomba elongi na ye mpo ete amona mokili te.


Moto moko te akoki kobulisa mwana liboso ya nyama na ye, pamba te mwana ya liboso ezali ya Yawe ; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba.


Soki moto oyo alapi ndayi azali mobola to azali na makoki te ya kopesa motuya oyo ekatama, akomema epai ya Nganga-Nzambe moto oyo ye alapelaki ndayi ya kopesa lokola likabo. Boye Nganga-Nzambe akokata motuya ya kopesa kolanda makoki ya moto oyo alapi ndayi.


Yawe akosala ete banguna oyo bakotelemela bino bakokweyisama liboso na bino ; bakoya epai na bino na nzela moko, kasi bakokima bino na banzela sambo.


Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ; kati na bandako na bango, somo ekokonza ; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.


Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te ?


Davidi alongaki bango kobanda na tongo kino na pokwa ya mokolo oyo elandaki. Moko te abikaki, longola kaka bilenge mibali nkama minei oyo bamataki na likolo ya bashamo mpe bakimaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ