Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 7:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bongo bato ya Samari babimaki mpe bazwaki na makasi biloko kati na molako ya bato ya Siri. Boye bakomaki koteka bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, ndenge kaka Yawe alobaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 7:16
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize alobaki : — Boyoka Liloba na Yawe ! Tala makambo oyo Yawe alobi : « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »


Balandaki bilembo ya makolo ya bato ya Siri kino na ebale Yordani, mpe bamonaki ete nzela nyonso etondaki na bilamba mpe bibundeli oyo basoda ya Siri babwakaki tango bakimaki na mbalakata. Bongo bantoma bazongaki mpe bapesaki sango epai ya mokonzi.


Jozafati elongo na bato na ye bakendeki kozwa bomengo ya bitumba ; mpe bamonaki bibembe ebele, biloko ebele, bilamba ebele mpe biloko ebele ya talo. Balokotaki biloko ebele oyo bakokaki ata komema te. Basalaki mikolo misato mpo na kozwa yango, pamba te bomengo ya bitumba ezalaki ebele penza.


Na liloba moko kowuta na Nkolo, basi oyo bamemaka sango basangani bato ebele,


bakonzi ya mampinga bakimi, bapoti mbangu, mpe mwasi oyo atikali na ndako akaboli bomengo ya bitumba.


Oh mobebisi, mawa na yo, yo oyo nanu obebisama te ! Oh mofundi, mawa na yo, yo oyo nanu bafunda te ! Tango okosilisa kobebisa, yo mpe bakobebisa yo, tango okosilisa kofunda, yo mpe bakofunda yo.


Basinga na yo esili kolemba, ezali lisusu te kosimba malamu nzete ya bendele ; ezali lisusu te kofungola malamu vwale. Boye, na tango bakokabola ebele ya bomengo ya bitumba, bato ya tengu-tengu, bango moko penza, bakobotola eteni na bango ya bomengo.


Oh bikolo, bakolokota bomengo na bino ya bitumba ndenge balokotaka mankoko ; bakosopanela yango na elulu ndenge mabanki esalaka.


Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


Tango bato ya Isalaele batikaki kolanda bato ya Filisitia, bazongaki mpo na kozwa na makasi biloko oyo ezalaki kati na molako ya bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ