Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 7:15 - Mokanda na Bomoi

15 Balandaki bilembo ya makolo ya bato ya Siri kino na ebale Yordani, mpe bamonaki ete nzela nyonso etondaki na bilamba mpe bibundeli oyo basoda ya Siri babwakaki tango bakimaki na mbalakata. Bongo bantoma bazongaki mpe bapesaki sango epai ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 7:15
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye baponaki bashar mibale elongo na bampunda na yango, mpe mokonzi atindaki yango mpo na koluka mampinga ya bato ya Siri. Apesaki mitindo na batambolisi na yango : « Bokende mpe botala ! »


Bongo bato ya Samari babimaki mpe bazwaki na makasi biloko kati na molako ya bato ya Siri. Boye bakomaki koteka bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, ndenge kaka Yawe alobaki.


Bazalaki kokabola masanga ya vino na bakopo ya wolo ; kopo na kopo ezalaki na lolenge na yango. Bongo vino ezalaki penza ebele kolanda motema ya kokaba ya mokonzi.


Satana azongiselaki Yawe : — Poso mpo na poso : moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye.


tango ya koluka mpe tango ya kobungisa, tango ya kobomba mpe tango ya kobwaka ;


Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?


Na mokolo wana, bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembo banzambe na bango ya bikeko ya palata mpe banzambe na bango ya bikeko ya wolo, oyo basalaki mpo ete bafukamela bango.


Nkembo nyonso ya ndako ya tata na ye ekozala likolo na ye : kobanda na bakitani na ye kino na bana na bango nyonso, lokola bisalelo oyo : kobanda na bakopo ya mike kino na mbeki ya minene.


Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobwaka banzambe na ye ya bikeko ya palata mpe ya wolo oyo bosalaki na maboko na bino ya masumu.


Botika mabe na bino nyonso oyo bozalaki kosala ; bozwa mitema ya sika mpe molimo ya sika. Mpo na nini bokolinga kokufa, oh libota ya Isalaele ?


Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?


Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ