2 Bakonzi 7:13 - Mokanda na Bomoi13 Moko kati na bakalaka na ye azongisaki : — Bongisa ndambo ya mibali mpo ete bazwa bampunda mitano kati na oyo etikali kati na engumba. Tokobungisa ata eloko moko te, pamba te suka na bango ekozala ndenge moko na oyo ya bana nyonso ya Isalaele oyo batikali na engumba. Boye totinda bango kaka mpo toyeba makambo oyo ewuti kosalema. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi alamukaki na butu mpe alobaki na bakalaka na ye : — Tika ete nayebisa bino makambo oyo bato ya Siri basali biso. Bayebi solo ete tozali kokufa nzala, yango wana batiki milako na bango mpo na kokende kobombama na zamba. Balobani bango na bango : « Bakobima solo, mpe tokokanga bango ya bomoi, bongo tokokota na engumba. »