Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 Elize alobaki : — Boyoka Liloba na Yawe ! Tala makambo oyo Yawe alobi : « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 7:1
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.


Ezayi alobaki na Ezekiasi : — Yoka liloba oyo Yawe alobi :


Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye : — Pesa yango na bato mpo ete balia !


Lokola bazingelaki Samari tango molayi, nzala makasi ekotaki kati na engumba kino moto moko ya ane ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mwambe ; mpe bagrame nkama mibale na tuku mitano ya nyei ekawuka ya ebenga ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, mitano.


Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi : « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe ! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye ? »


Bongo bato ya Samari babimaki mpe bazwaki na makasi biloko kati na molako ya bato ya Siri. Boye bakomaki koteka bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, ndenge kaka Yawe alobaki.


Ezali na ebale moko oyo mayi na yango esepelisaka engumba ya Nzambe oyo eleki bule kati na bivandelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.


Moyize azongiselaki bango : — Bobanga te, boyika mpiko ! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo ; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te.


— Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »


Tosengeli kotambola mikolo misato kati na esobe, sima tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ndenge atindaki biso.


Boyoka Liloba na Yawe, bino bakambi ya engumba Sodome ! Boyoka mobeko ya Nzambe na biso, bino bato ya engumba Gomore !


Bongo alobaki na ngai : — Sakola epai ya mikuwa oyo mpe yebisa yango : « Eh bino mikuwa ekawuka, boyoka Liloba na Yawe !


— Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ?


Jozue alobaki na bato : — Bomibulisa, pamba te lobi, Yawe akosala makambo ya kokamwa kati na bino.


Bongo nayokaki lokola mongongo moko kobima kati na bikelamu minei ya bomoi ; ezalaki koloba : « Kopo moko ya ble mpo na mbongo moko ya ebende, mpe bakopo misato ya orje mpo na mbongo moko ya ebende. Kasi kobebisa mafuta mpe vino te. »


Balobaki na bantoma oyo bawutaki na Yabeshi : « Bokende koloba na mibali ya Yabeshi ya Galadi : ‹ Bokokangolama lobi, na tango moyi ekongala makasi. › » Tango bantoma bakendeki mpe bapesaki sango yango epai ya bato ya Yabeshi, bato yango basepelaki makasi.


Samuele alobaki na Saulo : « Yawe atindaki ngai kopakola yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya bato na Ye, Isalaele. Boye, yoka sik’oyo makambo oyo ewuti epai na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ