Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 6:7 - Mokanda na Bomoi

7 Elize alobaki : — Kamata yango ! Boye, mosali wana asembolaki loboko na ye mpe akamataki yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 6:7
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye : — Benga mwasi ya Sunami ! Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki : — Zwa mwana na yo !


Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye : — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo ; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.


Moto na Nzambe atunaki : — Ekweyaki na esika nini ? Sima na ye kolakisa ye esika yango, Elize akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango na esika oyo ebende ya epasola ekweyaki. Mpe, na mbala moko, eteni ya nzete yango ematisaki ebende na likolo ya mayi, mpe ebende ekomaki kotepa.


Mokonzi ya Siri azalaki kobundisa bana ya Isalaele. Asololaki na basali na ye mpe alobaki : « Nakotia molako na ngai na esika songolo to pakala. »


Kasi Yawe alobaki na ye : — Sembola loboko na yo mpe kanga nyoka yango na mokila ! Moyize asembolaki loboko mpe akangaki nyoka ; mpe nyoka yango ebongwanaki lisusu lingenda na loboko na ye.


Moto oyo akufaki avandaki mpe abandaki koloba ; mpe Yesu azongisaki ye epai ya mama na ye.


Petelo asimbaki ye na loboko na ye mpe atelemisaki ye. Bongo abengaki bandimi, mingi-mingi basi oyo bakufisa mibali, mpe alakisaki bango Dorkasi ya bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ