Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 6:33 - Mokanda na Bomoi

33 Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi : « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe ! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 6:33
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kayina alobaki na Yawe : — Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema !


Mokonzi ya Isalaele akamwaki : — Ndenge nini boye ! Yawe asangisi biso awa, biso bakonzi misato, kaka mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi ?


Elize alobaki : — Boyoka Liloba na Yawe ! Tala makambo oyo Yawe alobi : « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »


Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo mpe beta biloko na ye nyonso ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.


Alobaki : « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »


Mpo ete obwakela Nzambe kanda na yo mpe obimisa makambo ya boye na monoko na yo ?


Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo, beta nzoto mpe mikuwa na ye ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.


Mwasi na ye alobaki na ye : — Boni, ozali kaka kokoba na bosembo na yo ? Lakela Nzambe mabe mpe kufa na yo !


Talela Yawe ! Zala makasi mpe yika mpiko ! Talela Yawe !


Batela kimia liboso ya Yawe mpe talela Ye ; kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye, mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.


Pamba te bato oyo basalaka mabe bakolimwa, kasi bato oyo batielaka Yawe motema bakozwa mokili lokola libula na bango.


Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.


Bozoba ya moto ebebisaka bomoi na ye ; mpe, na sima, akomaka kotombokela Yawe.


Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.


Ezali na moto kati na bino oyo atosaka Yawe mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye, bongo atambola kati na molili mpe atikala komona pole te ? Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe mpe atalela Nzambe na ye.


Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.


Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala ; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe.


Sala keba ! Noki te okotikala makolo ngulu mpe okokawuka mongongo likolo ya bitambola-tambola ! Kasi ozali koloba : ‹ Tika na yo ! Ngai nalingaka banzambe ya bapaya mpe nakolanda kaka bango. ›


Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te ?


Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye ?


Mwana na moto, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala maloba oyo bozali koloba : ‘ Ndenge nini penza tokoki lisusu kobika mpo ete mabe mpe masumu na biso ekomi kilo makasi mpo na biso, mpe yango ekomi kobebisa biso ? ’ ›


Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba, bongo bato bazanga kobanga ? Pasi ekoki solo koya na engumba soki Yawe atindi yango te ?


Emoniseli oyo ezali kaka kozela tango na yango oyo ekatama ; ezali kolobela makambo oyo ekosalema na tango ya suka ; solo, ekokosa te. Ata ewumeli, zela yango kaka ; solo, ekokokisama, ekowumela te.


Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.


mpo ete Satana akonza biso te, pamba te toyebi malamu makanisi na ye.


Nzokande sik’oyo, bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, mpo ete azala na mawa makasi te.


Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye : « Bimisa mopanga na yo na ebombelo na yango mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kotuba ngai mpe kosakanela ngai. » Kasi soda oyo amemaki bibundeli na ye aboyaki, pamba te azalaki kobanga. Bongo Saulo akamataki mopanga na ye mpe amibwakaki na likolo na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ