Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 6:32 - Mokanda na Bomoi

32 Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba : « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto ? Bosala keba ! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima ! Boyoka ! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 6:32
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ayiya ayokaki makelele ya makolo ya mwasi ya Jeroboami na ekuke, alobaki : — Kota, mwasi ya Jeroboami ! Mpo na nini ozali komibongola ? Natindami epai na yo mpo na koyebisa yo sango mabe.


Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi.


Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo : ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. »


Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.


Okoyebisa ye makambo oyo : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te ? › Okobakisa lisusu : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › »


Kasi Elize alobaki na ye : — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo ? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi ?


Moko kati na bakalaka na ye alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele ; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala.


Mokonzi ya Isalaele aponaki mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, mpo na kokengela ekuke ya engumba, kasi bato banyataki ye mpe akufaki kolanda makambo oyo moto na Nzambe asakolaki tango mokonzi ayaki na ndako na ye.


Lokola Yawe alakisaki ngai likita oyo bazalaki kosalela ngai, nasosolaki yango, pamba te atalisaki ngai mabongisi nyonso oyo bazalaki kosala.


Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, abwakaki ye kuna na koloba : « Mpo na nini ozali kosakola na maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobotola yango ;


Kati na bakambi ya Isalaele, ndambo bayaki epai na ngai mpe bavandaki liboso na ngai.


Na mokolo ya zomi, na sanza ya mitano ya mobu oyo ya sambo, ndambo ya bakambi ya Isalaele bayaki kotuna toli ya Yawe mpe bavandaki liboso na ngai.


Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.


Na mobu ya motoba, na mokolo ya mitano ya sanza ya motoba, wana nazalaki ya kovanda kati na ndako na ngai, mpe bakambi ya Yuda bavandaki liboso na ngai, loboko ya Nkolo Yawe esimbaki ngai kuna.


Yesu alobaki na bango : — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba : « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi ; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ