Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 6:31 - Mokanda na Bomoi

31 Mokonzi alobaki : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki kaka moto ya Elize, mwana mobali ya Shafati, etikali na likolo ya mapeka na ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 6:31
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi ?


mpe basengaki na Davidi ete alia wana moyi ezali nanu. Kasi Davidi alapaki ndayi na maloba oyo : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu oyo eleki makasi soki nameki kolia mapa to eloko mosusu liboso ete moyi elala ! »


Tika ete Nzambe apesa ngai Abineri etumbu ya makasi soki nasali te mpo na Davidi makambo oyo Yawe alakaki ye, na nzela ya ndayi,


Tango Akabi amonaki Eliya alobaki na ye : — Yo nde moto ozali kotia mobulu kati na Isalaele ?


Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.


Bongo, mokonzi Salomo alapaki ndayi na Kombo na Yawe : — Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki Adoniya akufi te mpo na bosenga oyo !


Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.


Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !


Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »


Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.


Bakalaka balobaki na mokonzi : — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.


— Bozali kososola eloko moko te ; bozali mpe komona te ete ezali mpo na bolamu na bino soki moto moko akufi mpo na bato nyonso, mpo ete ekolo mobimba ebebisama te ?


Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa.


Saulo alobaki : — Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te.


Tika ete Nzambe apesa ngai Davidi etumbu ya makasi soki, kino lobi na tongo, natiki na bomoi mobali moko kati na bato nyonso oyo bazali ya Nabali ! »


Eli atunaki ye : — Makambo nini Yawe ayebisaki yo ? Kobombela ngai te. Tika ete Nzambe apesa yo etumbu ya makasi soki obombeli ngai ata likambo moko kati na nyonso oyo alobaki na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ