Namani alobaki : — Kamata bakilo ya palata, tuku sambo. Atungisaki Geazi ete azwa yango. Boye, atiaki bakilo ya palata, tuku sambo kati na basaki mibale elongo na bilamba mibale ya talo. Namani apesaki yango epai ya basali na ye mibale oyo bamemaki yango liboso ya Geazi.
Pesa biso nzela ya kokende na ebale Yordani epai wapi moko na moko kati na biso akoki kozwa nzete mpo na kotonga kuna esika ya kovanda. Elize alobaki na bango : — Bokende !