29 Boye tolambaki mwana na ngai ya mobali mpe toliaki ye. Mokolo oyo elandaki, nalobaki na ye : « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye, » kasi abombaki ye.
Mwasi oyo mwana na ye azalaki na bomoi, ayokaki pasi na motema mpo na mwana na ye mpe alobaki na mokonzi : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Pesa ye mwana oyo azali na bomoi, koboma mwana te ! Kasi mwasi mosusu alobaki : — Kata ye ! Na bongo, akozala ya ngai te, mpe akozala ya ye te !
Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te !
Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
Mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino tango bakozingela bino, bokolia bana na bino, bokolia misuni ya bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
mwana oyo awuti kobima na libumu na ye, mpe bana oyo ye moko aboti ; pamba te akoluka kolia bango na nkuku, na tango oyo banguna na bino bakozingela bino, mpe na tango ya pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino kati na bingumba na bino.