2 Bakonzi 6:25 - Mokanda na Bomoi25 Lokola bazingelaki Samari tango molayi, nzala makasi ekotaki kati na engumba kino moto moko ya ane ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mwambe ; mpe bagrame nkama mibale na tuku mitano ya nyei ekawuka ya ebenga ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, mitano. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi alamukaki na butu mpe alobaki na bakalaka na ye : — Tika ete nayebisa bino makambo oyo bato ya Siri basali biso. Bayebi solo ete tozali kokufa nzala, yango wana batiki milako na bango mpo na kokende kobombama na zamba. Balobani bango na bango : « Bakobima solo, mpe tokokanga bango ya bomoi, bongo tokokota na engumba. »