Elize alobaki na bango : — Nzela ezali awa te ! Engumba mpe ezali awa te ! Bolanda ngai, mpe nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka. Elize amemaki bango na Samari.
Boye, Yawe afungolaki miso ya Balami, mpe Balami amonaki anjelu ya Yawe atelema na nzela, na mopanga na ye ya monene. Bongo, Balami afukamaki mpe akweyaki elongi kino na mabele.
Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.