Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 6:18 - Mokanda na Bomoi

18 Lokola monguna azalaki kopusana pene na ye, Elize asambelaki Yawe : — Boma ekolo oyo miso ! Mpe Yawe abomaki bango miso, ndenge kaka Elize asengaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 6:18
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakangaki miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya ndako, ezala bilenge to mibange ; boye bazalaki lisusu komona ekuke te.


Elize alobaki na bango : — Nzela ezali awa te ! Engumba mpe ezali awa te ! Bolanda ngai, mpe nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka. Elize amemaki bango na Samari.


Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.


Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.


Na mokolo wana, nakobangisa bampunda nyonso mpe nakokomisa batambolisi na yango liboma, » elobi Yawe. « Nakosenzela libota ya Yuda, kasi nakoboma miso ya bampunda nyonso ya bikolo.


« Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »


Yesu alobaki : — Nayaki mpo na kotia bososoli kati na mokili ; mpo ete bakufi miso bakoma komona, mpe ba-oyo bazali komona bakoma bakufi miso.


Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sik’oyo. Ozali kokoma mokufi miso mpo na mwa tango moke, okomona lisusu te pole ya moyi. Kaka na tango yango, lipata mpe molili ezipaki miso ya Elimasi ; azalaki lisusu komona te mpe akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso na koluka moto mpo ete asimba ye na loboko mpe alakisa ye nzela.


Boye toloba lisusu nini ? Eloko oyo bana ya Isalaele bazalaki koluka, bazwaki yango te ; kaka bato oyo Nzambe aponaki kati na bango nde bazwaki yango. Bato mosusu bakoma mitema mabanga,


Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ