Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 6:15 - Mokanda na Bomoi

15 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, tango mosali ya moto na Nzambe alamukaki mpe abimaki, amonaki ete mampinga elongo na bampunda mpe bashar bazingelaki engumba. Mosali yango alobaki na Elize : — Oh nkolo na ngai, eyindi na libanda ! Tokosala nini !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 6:15
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Elize atikaki ye mpe azongaki. Azwaki bangombe na ye mibale oyo bakangisa, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka. Asalelaki bikangiseli ya bangombe mpo na kolamba mosuni na yango, akabolaki yango epai ya bato na ye mpe baliaki yango. Boye, atelemaki mpo na kolanda Eliya mpe akomaki kosalela ye.


Kasi Jozafati atunaki : — Awa, ezali te na mosakoli ya Yawe mpo ete totuna toli ya Yawe na nzela na ye ? Mokonzi moko ya mampinga ya mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Elize, mwana mobali ya Shafati, azali awa. Azalaki kosopa mayi na maboko ya Eliya.


Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »


Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela. Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe.


Bongo mokonzi atindaki kuna bampunda elongo na bashar mpe basoda ebele. Bakendeki kuna na butu mpe bazingelaki engumba.


Mosakoli azongisaki : — Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango.


Wana moko kati na bango azalaki kokata nzete, ebende ya epasola na ye ekweyaki na mayi. Agangaki : — Ah, nkolo na ngai ! Nadefaki yango kodefa !


Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te ? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini ! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. »


Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa mpe batikala nanu kobelela Nzambe te, bazali penza kososola eloko moko te ?


Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe.


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki.


Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba na Nzambe kati na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango lokola mosungi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ