Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 6:10 - Mokanda na Bomoi

10 Mokonzi ya Isalaele atindaki bato kokende kononga esika oyo moto na Nzambe alobelaki. Mbala ebele, Elize azalaki kokebisa mokonzi ete azala na bokebi na bisika ya ndenge wana ; mpe mbala ebele, mokonzi ya Isalaele azalaki komibikisa na motambo ya bato ya Siri.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 6:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akabi abengisaki bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike ; bango nyonso bazalaki bato nkama mibale na tuku misato na mibale. Asangisaki lisusu bato ya Isalaele oyo batikalaki : bazalaki bango nyonso bato nkoto sambo.


Elize abelaki bokono oyo ememaki ye na kufa. Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kotala ye mpe alelaki na miso na ye na maloba oyo : — Tata na ngai ! Tata na ngai ! Ozali bashar mpe bampunda ya Isalaele !


Tango Elize amonaki bongo, agangaki : « Tata na ngai ! Tata na ngai ! Yo nde ozali lokola shar ya Isalaele mpe batambolisi na yango ! » Bongo Elize amonaki ye lisusu te. Boye akangaki bilamba na ye mpe apasolaki yango na biteni mibale.


Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye ; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali.


Suka na suka, mokonzi ya Siri asilikaki makasi, abengisaki bakalaka na ye mpe atunaki bango : — Bokoki te koyebisa ngai nani kati na biso azali na ngambo ya mokonzi ya Isalaele ?


Mbala moko, moto na Nzambe atindaki maloba oyo epai ya mokonzi ya Isalaele : « Keba ! Koleka na esika wana te, pamba te bato ya Siri bazali kokita kuna. »


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! »


Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana mpe akutanaka na pasi.


Lokola Yawe alakisaki ngai likita oyo bazalaki kosalela ngai, nasosolaki yango, pamba te atalisaki ngai mabongisi nyonso oyo bazalaki kosala.


Sima na yango, Nzambe akebisaki bango kati na ndoto ete bazonga lisusu te epai ya Erode. Boye, bazongaki na mboka na bango na nzela mosusu.


Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?


mpe alobaki : « Polo, kobanga te. Osengeli kosamba liboso ya Sezare. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo ozali kosala elongo na bango mobembo kati na masuwa. »


Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ