Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 5:7 - Mokanda na Bomoi

7 Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : « Boni, ngai nazali Nzambe ? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi ? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba ? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 5:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki : — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota ?


Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye,


Kasi Jozefi alobaki na bango : — Bobanga te ! Boni, ngai nazali na esika ya Nzambe ?


Bongo Davidi mpe basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye basimbaki bilamba na bango mpe bapasolaki yango.


Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango : — Botala ndenge nini moto oyo azali koluka makambo ! Tango asengaki ngai basi na ngai mpe bana na ngai ya mibali, wolo mpe palata na ngai, napimelaki ye yango te.


Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi ; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : « Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! »


Boye Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.


Apesaki epai ya mokonzi ya Isalaele mokanda oyo elobaki : « Na nzela ya mokanda oyo, natindeli yo mosali na ngai, Namani, mpo ete obikisa ye na bokono na ye ya maba. »


Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.


Makambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi makasi, moto moko te akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye ; ezali kaka banzambe nde bakoki kosala yango mpo ete bavandaka kati na bato te.


Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.


Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, oyo bazalaki na molongo ya bato oyo bakendeki kononga mokili bapasolaki bilamba na bango


Mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Afingi Nzambe ! Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe !


na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye.


Kasi tango bantoma, Barnabasi mpe Polo, bayokaki sango ya likambo yango, bapasolaki bilamba na bango, bakendeki mbangu epai ebele ya bato bazalaki na koganga :


Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !


Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.


Yawe abomaka mpe apesaka bomoi, akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ