Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 5:26 - Mokanda na Bomoi

26 Kasi Elize alobaki na ye : — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo ? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 5:26
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. »


Mosakoli Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka.


Moko kati na bakalaka na ye alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele ; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala.


Bakoboma bango na mopanga mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.


Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.


Bibebu oyo ekosaka ezali nkele na miso ya Yawe, kasi bibebu oyo ekokisaka bosembo ezalaka elengi na miso na Ye.


Boni, olingi koluka makambo minene mpo na yo moko ? Te ! Koluka yango te ! Pamba te nakomemela bato nyonso pasi, elobi Yawe, kasi nakobikisa yo na bisika nyonso oyo okokende. › »


« Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba ? »


Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.


Nalulaki te palata to wolo to elamba ya moto moko.


Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba : « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »


Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.


Solo, mpo na ngai, atako nazali elongo na bino te na nzoto, kasi nazali elongo na bino na molimo. Mpe lokola moto oyo azali elongo na bino, na Kombo na Yesu, Nkolo na biso, nasili kokatela moto nyonso oyo azalaki kosala likambo yango etumbu.


Pamba te, atako na nzoto, nazali mosika na bino, kasi na molimo, nazali elongo na bino ; mpe nazali kosepela komona ete bozali kotambola na botosi mpe bozali kobatela kondima na bino kati na Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ