Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 5:25 - Mokanda na Bomoi

25 Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye : — Geazi, okendeki wapi ? Geazi azongisaki : — Mosali na yo akendeki epai moko te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 5:25
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atunaki ye : — Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi ? Azongisaki : — Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai.


Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ?


Bongo mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye : — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ? Ezekiasi azongisaki : — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni.


Geazi azongisaki : — Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo : « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. »


Bongo Oziasi, oyo asimbaki mbabola na loboko na ye, atombokelaki Banganga-Nzambe. Kaka na tango yango, wana azalaki kati na Tempelo ya Yawe liboso ya etumbelo ya ansa, bokono ya maba ebimaki na elongi na ye na miso ya Banganga-Nzambe.


Tala ndenge mwasi ya ndumba asalaka : Soki alie, apangusaka monoko ; mpe na sima, akoloba : « Nasali na ngai mabe te ! »


Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.


Wana bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.


Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu.


Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye : — Bokendeki wapi ? Saulo azongisaki : — Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ