Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 5:23 - Mokanda na Bomoi

23 Namani alobaki : — Kamata bakilo ya palata, tuku sambo. Atungisaki Geazi ete azwa yango. Boye, atiaki bakilo ya palata, tuku sambo kati na basaki mibale elongo na bilamba mibale ya talo. Namani apesaki yango epai ya basali na ye mibale oyo bamemaki yango liboso ya Geazi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 5:23
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo ; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso. Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango.


Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango : — Botala ndenge nini moto oyo azali koluka makambo ! Tango asengaki ngai basi na ngai mpe bana na ngai ya mibali, wolo mpe palata na ngai, napimelaki ye yango te.


Nganga-Nzambe Yeoyada akamataki sanduku moko mpe atobolaki mofinuku na yango. Atiaki sanduku pembeni ya etumbelo, na ngambo ya loboko ya mobali tango ozali kokota kati na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobatela ekuke batiaki kati na sanduku mbongo nyonso oyo bazalaki komema na Tempelo ya Yawe.


Kasi batungisaki Elize makasi kino ayokaki soni mpo na koboya. Boye alobaki : — Botinda bango. Mpe batindaki mibali tuku mitano oyo balukaki Eliya mikolo misato, kasi batikalaki komona ye te.


Mosakoli Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka.


Mokonzi ya Siri alobaki na ye : — Malamu ! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano ; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo.


Moko kati na bango alobaki : — Okosepela te kokende elongo na basali na yo ? Elize azongisaki : — Nandimi, nakokende.


Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :


na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ